MOKANDA
YA BOLINGO EWUTI NA TATA
Mwana
na ngai,
Natalaka kino kati ya motema na yo
mpe nayebi manso matali yo
Ps 139:1
Nayebi
ntango ofandaka mpe otelemaka
Ps 139:2
Nayebi
ntango ozali kotambola mpe ozali kolala ;
ezaleli na yo mobimba ezali polele na miso ma ngai
Ps 139:3
Ata
suki ya moto na yo etangami nyoso
Mat 10:29-31
Osalamaki
na elilingi na ngai
Gen 1:27
Nazali
etamboli, bomoi mpe bojalisani
Actes 17:28
Nayebaki
yo yambo te ozala na libumu ya mama na yo
Jeremie 1:4-5
Naponaki
yo na ntango ya bokeli mokili
Ephesiens 1:11-12
Ozalaki
libunga te
Ps 139:15
Mikolo
mia yo nyonso mikomami na mokanda na ngai
Ps 139:16
Natieli
yo ndelo ya ntango mpe ya bifandeli na yo
Actes 17:26
Nasali
yo ekelamu na motindo ya kokamwa
Ps 139:14
Natongaki
yo na kati ya libumu ya mama na yo
Ps 139:13
Ezali
ngai moto nabimisaki yo kati
ya libumu ya mama na yo
Ps 71:6
Baye
bayebi ngai te babebisi nkombo na ngai
Jn 8:41-44
Nazali
mosika te, nasiliki te,
mpo ete nazali ndakisa ya solo ya bolingo
1 Jean 4:16
Ezali
bolingo na ngai ya tata,
nde nazali kopanza likolo na yo
1 Jn 3:1
Mpo
ete ozali mwana na ngai,
mpe 'te nazali tata na yo
1 Jn 3:1
Napesaka
yo mingi koleka oyo tata na
yo na mokili akoka kopesa yo te
Mat 7:11
Mpo
nazali tata na yo ya solo
Mat 5:48
Ngolu
nyoso oyo ozali kozua ewuti na loboko na ngai
Jacques 1:17
Mpo
nazali mokokisi ya bosenga na yo nyoso
Mat 6:31-32
Makanisi
na ngai mpo na yo matondi na elikya
Jeremis 29:11
Mpo
ete nalingi yo na bolingo ya seko
Jeremie 31:3
Mabanzo
ma ngai po na yo mazali lokola mbuma
ya jelo mpembeni na mai ya monana
Ps 139:17-18
Nasepelaka
na njembo mpe na masanjoli ma yo
Sophonie 3:17
Nakotika
te kosala yo malamu
Jeremie 32:40
Nalingi
kotia yo na motema na ngai mobimba
mpe na molimo na ngai mobimba
Jeremie 32:40
Ozali
libota oyo ngai naponi |
Exode 19:5
Nalingi
kotia yo na motema na ngai mobimba mpe na
molimo na ngai mobimba
Jeremie 32:41
Ezali
na nguya na ngai kolakia yo makambo
minene mpe ya kokamwisa
Jeremie 33:3
Soki
oluki ngai na motema mwa yo mobimba,
okokutana na ngai
Deuteronome 4:29
Omisepelisa
na ngai,
nde nakokisa mposa nyoso ya motema na yo
Ps 37:4
Mpo
ete ngai nde napesi yo ba mposa nyoso
Phil 2:13
Nakoki
kosala ya mingi mpo na yo,
na ndenge oyo okoki kokanisa te
Eph 3:20
Mpo
nazali elendisami monene mpo na yo
2 Thessaloniciens 2:16-17
Nazali
mpe tata oyo abondisaka yo na mitungisi nyoso
2 Cor 1:3-4
Tango
okobenga ngai, nazali penepene na yo mpe
nakobikisa yo ntango molimo na yo mozali na mpasi
Ps 34:18
Lokola
mobateli bibwele amemaka mwana na mpate,
namemaka yo pembeni ya motema na ngai
Esaie 40:11
Nakolongola
mpisoli nyoso na miso na yo
Apoc 21:3-4
Nakomema
mpasi nyoso oyo omonaka na mokili oyo
Apoc 21:4
Nazali
tata na yo mpe nalingi yo ndenge moko nalingaka
mwana na ngai Yesu
Jn 17:23
Mpo
ete kati na Yesu,
bolingo na ngai elakisami
Jn 17:26
Ye
azali elilingi ya solo ya bomoto na ngai
Hebreux 1:3
Mpe
ye ayaki mpo na kolakisa ete nazali mpo na yo
kasi monguna na yo te
Rom 8:31
Ayaki
mpe koyebisa yo ete
natangaka masumu na yo te
2 Cor 5:18-19
Liwa
na ye ezali ndakisa monene ya bolingo
na ngai mpo na yo
1 Jn 4:10
Natiki
nyoso oyo nalingi mpo nalonga
bolingo na yo
Rom 8:32
Soki
ondimeli mwana na ngai Yesu,
oyambi ngai
1 Jn 2:23
Eloko
moko te ekokabola yo na bolingo na ngai
Rom 8:38-39
Na
ndako na ngai ezali na esengo mingi soki
mosumuki moko abongwani
Luc 15:7
Nazali
tango nyoso tata mpe
nakozala tango nyoso tata na yo
Eph 3 :14-15
Motuna
mwa ngai ezali boye,
Olingi okoma mwana na ngai?
Jn 1:12-13
Nazali
kojela yo
Luc 15:11-32
Tata
na yo oyo alingi yo
Nzambe ya bokasi bonso
Permission
To Copy:
Please feel free to copy this text and share it with your friends
as long as you do so free of charge and you include the following
copyright information..."Father's Love Letter Used By Permission
Father Heart Communications Copyright 1999-2008 Translated by
Papy Bompili Bombo www.FathersLoveLetter.com"