FATHERS LOVE LETTER .COM
  • Home
  • About
    • About
    • Contact
    • Copyright
    • Donate
    • FAQ
    • Our Vision
    • Privacy Policy
    • Terms of use
    • The Story
    • What We Believe
  • Media Formats
    • Media Center
    • HD Video
    • Vertical Video
    • Video History
    • Stores
    • Text
    • Audio
    • Kids FLL
  • Languages
  • God and You
  • FLL Book
    • Devotional Index
    • Free Audiobook
    • Free eBook

Lingala
Father's Love Letter

The Lingala Father's Love Letter is currently available
in the following formats...
1. An instrumental video version
2. An online text version
Please feel free to copy this text and design your own version
of the Lingala Father's Love Letter.

Lingala Father's Love Letter Instrumental Video

Video Courtesy of Berge Boyadjian

Lingala Father's Love Letter

MOKANDA YA BOLINGO EWUTI NA TATA

Mwana na ngai,


Natalaka kino kati ya motema na yo
mpe nayebi manso matali yo
Ps 139:1

Nayebi ntango ofandaka mpe otelemaka
Ps 139:2

Nayebi ntango ozali kotambola mpe ozali kolala ;
ezaleli na yo mobimba ezali polele na miso ma ngai
Ps 139:3

Ata suki ya moto na yo etangami nyoso
Mat 10:29-31

Osalamaki na elilingi na ngai
Gen 1:27

Nazali etamboli, bomoi mpe bojalisani
Actes 17:28

Nayebaki yo yambo te ozala na libumu ya mama na yo
Jeremie 1:4-5

Naponaki yo na ntango ya bokeli mokili
Ephesiens 1:11-12

Ozalaki libunga te
Ps 139:15

Mikolo mia yo nyonso mikomami na mokanda na ngai
Ps 139:16

Natieli yo ndelo ya ntango mpe ya bifandeli na yo
Actes 17:26

Nasali yo ekelamu na motindo ya kokamwa
Ps 139:14

Natongaki yo na kati ya libumu ya mama na yo
Ps 139:13

Ezali ngai moto nabimisaki yo kati
ya libumu ya mama na yo
Ps 71:6

Baye bayebi ngai te babebisi nkombo na ngai
Jn 8:41-44

Nazali mosika te, nasiliki te,
mpo ete nazali ndakisa ya solo ya bolingo
1 Jean 4:16

Ezali bolingo na ngai ya tata,
nde nazali kopanza likolo na yo
1 Jn 3:1

Mpo ete ozali mwana na ngai,
mpe 'te nazali tata na yo
1 Jn 3:1

Napesaka yo mingi koleka oyo tata na
yo na mokili akoka kopesa yo te
Mat 7:11

Mpo nazali tata na yo ya solo
Mat 5:48

Ngolu nyoso oyo ozali kozua ewuti na loboko na ngai
Jacques 1:17

Mpo nazali mokokisi ya bosenga na yo nyoso
Mat 6:31-32

Makanisi na ngai mpo na yo matondi na elikya
Jeremis 29:11

Mpo ete nalingi yo na bolingo ya seko
Jeremie 31:3

Mabanzo ma ngai po na yo mazali lokola mbuma
ya jelo mpembeni na mai ya monana
Ps 139:17-18

Nasepelaka na njembo mpe na masanjoli ma yo
Sophonie 3:17

Nakotika te kosala yo malamu
Jeremie 32:40

Nalingi kotia yo na motema na ngai mobimba
mpe na molimo na ngai mobimba
Jeremie 32:40

Ozali libota oyo ngai naponi |
Exode 19:5

Nalingi kotia yo na motema na ngai mobimba mpe na
molimo na ngai mobimba
Jeremie 32:41

Ezali na nguya na ngai kolakia yo makambo
minene mpe ya kokamwisa
Jeremie 33:3

Soki oluki ngai na motema mwa yo mobimba,
okokutana na ngai
Deuteronome 4:29

Omisepelisa na ngai,
nde nakokisa mposa nyoso ya motema na yo
Ps 37:4

Mpo ete ngai nde napesi yo ba mposa nyoso
Phil 2:13

Nakoki kosala ya mingi mpo na yo,
na ndenge oyo okoki kokanisa te
Eph 3:20

Mpo nazali elendisami monene mpo na yo
2 Thessaloniciens 2:16-17

Nazali mpe tata oyo abondisaka yo na mitungisi nyoso
2 Cor 1:3-4

Tango okobenga ngai, nazali penepene na yo mpe
nakobikisa yo ntango molimo na yo mozali na mpasi
Ps 34:18

Lokola mobateli bibwele amemaka mwana na mpate,
namemaka yo pembeni ya motema na ngai
Esaie 40:11

Nakolongola mpisoli nyoso na miso na yo
Apoc 21:3-4

Nakomema mpasi nyoso oyo omonaka na mokili oyo
Apoc 21:4

Nazali tata na yo mpe nalingi yo ndenge moko nalingaka
mwana na ngai Yesu
Jn 17:23

Mpo ete kati na Yesu,
bolingo na ngai elakisami
Jn 17:26

Ye azali elilingi ya solo ya bomoto na ngai
Hebreux 1:3

Mpe ye ayaki mpo na kolakisa ete nazali mpo na yo
kasi monguna na yo te
Rom 8:31

Ayaki mpe koyebisa yo ete
natangaka masumu na yo te
2 Cor 5:18-19

Liwa na ye ezali ndakisa monene ya bolingo
na ngai mpo na yo
1 Jn 4:10

Natiki nyoso oyo nalingi mpo nalonga
bolingo na yo
Rom 8:32

Soki ondimeli mwana na ngai Yesu,
oyambi ngai
1 Jn 2:23

Eloko moko te ekokabola yo na bolingo na ngai
Rom 8:38-39

Na ndako na ngai ezali na esengo mingi soki
mosumuki moko abongwani
Luc 15:7

Nazali tango nyoso tata mpe
nakozala tango nyoso tata na yo
Eph 3 :14-15

Motuna mwa ngai ezali boye,
Olingi okoma mwana na ngai?
Jn 1:12-13

Nazali kojela yo
Luc 15:11-32


Tata na yo oyo alingi yo
Nzambe ya bokasi bonso


ACKNOWLEDGEMENTS / PERMISSION:
Special thanks to Papy Bompili Bombo for translating the Father's Love Letter into Lingala.
Please feel free to copy and share all of the resources on this page as long as you do so free of charge.

About Us

About
The Story
Copyright

Get Involved

FAQ
Terms of Use
Our Websites

Connect

Contact
Privacy Policy
Donate
© COPYRIGHT 2022. ALL RIGHTS RESERVED.
  • Home
  • About
    • About
    • Contact
    • Copyright
    • Donate
    • FAQ
    • Our Vision
    • Privacy Policy
    • Terms of use
    • The Story
    • What We Believe
  • Media Formats
    • Media Center
    • HD Video
    • Vertical Video
    • Video History
    • Stores
    • Text
    • Audio
    • Kids FLL
  • Languages
  • God and You
  • FLL Book
    • Devotional Index
    • Free Audiobook
    • Free eBook